Regineforte/whisper-small-lingala
Automatic Speech Recognition • Updated
audio audioduration (s) 1.93 17.6 | transcription stringlengths 9 154 |
|---|---|
lεlɔ oyɔ ozokufa nazotala te | |
ekomeli ngai boni | |
motema libanga nazwi wapi | |
dongolomiso basilisi bato na koboma mpinzoli te | |
nzoto ya mwasi ekomi eyinelo nakosoli te | |
bana basili na kokufa ngai matoyi lokola ezosala te | |
naweli bokonzi na kisasa nazwi tango te ya kobatela yɔ | |
naluki butu na moyi babenga ngai excellence ye oyɔ aleki na malonga | |
naluki na bikotakota babenga ngai honorable ye oyɔ abongi na lokumu liwa na yɔ nayokaki yango nabosanaki yango | |
liboso motuka ekoma miso ya jeannine ezotala ndenge tata oyɔ akiti na motuka | |
mokolo bakundaki yɔ nazalaki na kisasa nawelaki bibonga | |
naloba nini | |
mayεlε te nawangana | |
kihonorable nalulaki bapesa ngai na ndikila kiexcellence natekelaki mboka balongoli mafuta nzoyi | |
tina nasamba te | |
oyɔ nalonaki nde nabuki | |
eleki mwa mikolo tshotsho ameseni na kozala te ya muji | |
akangisa commissionnaire kasi commissionnaire ayebi te nini akoyebisa muji | |
akoti na epemelo ya lokumu ya libanda ya pepo ya ndjili | |
muji mwananyoka mapango na ye ya sika asombaki na bacommissionnaire misusu | |
akenda atika elaka te | |
mama na ye na bandeko na ye bafandaka kaka na menkao | |
abongisa ndako na bango kasi azonga te | |
uta mokolo wana po na jeannine mosolo ezanga bolingo efandaka na epemelo wana | |
monano ya suka monano ya suka nayebi lisusu nzela nakoleka te monano ya suka | |
napesa yɔ mbote molimo esemi nasuki awa | |
nazwa momeseno ya koyokaka makelele ya kolelaka na yɔ | |
motema emesana na komonaka ebele ya pasi eyelaka yɔ | |
mawa esunda pongi eyingela olongwa susi na ngai | |
tshotsho pe makambo ya politiki eyeli na elulu azwi lisusu tango ya koluka muji te | |
ekomi na ngonga moko boye ekomi kosenga kosala maponomi | |
na lingomba na bango tshotsho kodiongo alobi ete ye alingi kotiya libaya kaka na ma campagne | |
azali mɔtɔ ya lingomba ya tata mokonzi | |
na ma campagne esi ezalaki na kolo masolo oyɔ esi akanaki kotiya libaya na ma campagne | |
basololi tii baye kokoma na eyano | |
mwa mbɔngɔ ya bapolo mwa danki ekosopa mabele na avenue bokasa djalεlɔ ekoyembama ete azali nsoso ya mboka | |
tshotsho kodiongo alobi te nalongwa barumbu kala nazonga kutu kuna te tolongwaki kuna tango tozalaki bana mike | |
kasi baninga balobi na ye te tozali na mɔtɔ ya solo na barumbu te | |
esengi kaka yɔ otia libaya kuna | |
tshotsho kodiongo amilobeli na se ya motema nayebaka te nini etinda ngai naloba ke nawuta barumbu | |
tshotsho kodiongo akei kobelela po bampɔna ye na barumbu | |
amesana mwa mbɔngɔ ya boki bato babeleli kombo na ye | |
soki etangama okokufa na pepo ata osali ndenge nini sukasuka okomata kaka na pepo | |
tshotsho kodiongo asutuki | |
na motema amilobeli tala bambendre oyɔ kaka po eza tangu ya vote | |
soki ezalaki tangu ya kimya nde jeep ya bana mura elɔkɔteli ngai bango awa bakɛndɛ konyɔngama na ndenge ya mokε te | |
na bavote yango kasi na polele boye aseki | |
ayebi que soki afandisi masolo na barumbu te na parti na bango asambwe | |
esengi kaka ndenge ndeko eliezer alobaka benda molayi tii bakolεmba | |
bozali na raison kasi nasengi bino bolimbisi | |
ngai nazali mwana na bino ya barumbu | |
ameli soyi | |
akobi na kolobaka ete soki bobwakisi ngai bokotiya nani | |
boki nasombi ezali kaka luzitu bino bozali na vieux na ngai bosimbi masolo | |
na ndenge ya respect petit tangu akoti na esika bakulutu bazali ezosenga mwa nsamba ekita | |
bozwa yango na ndenge ya mabe te | |
yɔ ozali mwana ya barumbu yɔ | |
po otɔnga hotel awa yango nde okanisi que okomi mwana ya barumbu | |
kompani omonaki ya kotongela biso kompani ya kindumba | |
na hotel na yɔ batouriste bayaka | |
bayaka kotala barumbu | |
basombaka nini na barumbu | |
bilɔkɔ ya kolia | |
oloba ozali mwana ya barumbu ndaku na biso ezalaki wapi | |
otanga na ecole nini | |
bato bazalaki kokɛngɛla ye basutuka | |
bato bazalaki kokɛngɛla ye basutuka | |
ata pe ozali mwana barumbu osala nini | |
makambo na bino ngai moko nakomema yango | |
tata moko azalaki na pawu na ye azalaki kokɛndɛ kotimola nzela po mayi ya mvula eleka ayɔki neti bafingi mama na ye | |
ngonga babatelinzoto bapekisa azwi bambata makɔfi bisambeti | |
tata oyɔ ya pawu soki kaka vide emonani amamoli pawu | |
soki kaka polele pawu | |
tshotsho kodiongo abetami | |
bato na ye basali makasi babendi ye na se ya lobeto azalaki kobetama bakotisi ye na motuka pe batamboli | |
mabanga ezali kolanda bango | |
na mobulu wana mokumbi amonaki te ete libulu moko ya monene ezalaki na matakanelo ya bokasa pe kabambare | |
akei kozinda kuna | |
lokola azalaki na kotambola na lombango makasi motuka ebeti libaku ebaluki makalekale | |
bato bayei ebele esika yango mɔtɔ akokipe kosunga bango azali te | |
oyɔ ya kolongola retroviseur alongoli retroviseur oyɔ ya kolongola pine alongoli pine oyɔ ya kolongola pare-brise alongoli parebrise | |
na miniti mokε motuka etikali se mabende | |
bato mitano balali bibembe | |
bomoyi ya tshotsho kodiongo esuki na ngonga oyɔ azalaki kozela te | |
bato oyɔ bakonzi basalelaki babwaki kobwakama babwakamaki motema na bango balongolaki | |
bomɔtɔ na bango balongolaki | |
masumu ya bato nyɔnso oyɔ bakamba mboka pe bakomisa barumbu esika barumbu ekomi afuti masumu na bango | |
ata epumbuki nanu te obeti libaku mutu ekei kotutana na kiti pe okufi | |
tshotsho kodiongo ye wana akoti na ekala moko na barumbu ezalaki na esika balabala kasayi ekatana na kitega | |
bazalaki soki bato zomi kasi milangi kaka misato ya masanga pe esi esilaki na yango | |
tshotsho kodiongo apusani mpεmbεni na bango | |
abandi masolo ya politiki ndenge azokana kobongisa barumbu soki baponi ye | |
ayebisi na barman barman memela baprêtre mwa boki awa ngai nakofuta | |
wana azozela kobelela ye mopao oleki bango | |
ayɔki ata kosukosu te | |
kaka mongongo ya pepe kalle ezonganga na baffle osilisi banganda ya paris oo | |
bakoma kobenga yɔ bon client | |
tshotsho kodiongo ayɔki neti pepe kalle abimi na nkunda pe azali kozomela ye | |
lokola mosisa ya nsɔni bakata ye wana abendi pe kiti afandi | |
tala ndeko telema na malεmbε |
This dataset card aims to be a base template for new datasets.